1) Papa DIANGIENDA le 12.7.2009 na kati ya Nkamba na konda nionso - TopicsExpress



          

1) Papa DIANGIENDA le 12.7.2009 na kati ya Nkamba na konda nionso asiliki makasi azui HYPPOLITE KANAMBE abengani ye alingi komona yete na Kongo,pona azali mopaya RWANDAIS aye pona akabola bana ya KONGO na mabele ya papa KIMBANGU,lisusu alingi bana ya kongo te azali na motema ya satana ya kotangisa makila. 2) le 26.5.2010 papa HONORE NGBANDA alongi etumba ya liberation .tozali na bandimi ya KINTUADI bazali koyemba ba nzembo na kokumisa papa SIMON KIMBANGU.papa HONORE NGBANDA azali koloba tozongela Dieu le Saint Esprit ya Kintuadi ya Kimbangu ya bakoko na biso,pona soki papa KIMBANGU te tolingaki kolonga te pona yende atambuisi biso na ndenge lelo tolongi bitumba oyo. 3) le 1.10.2010 papa KIMBANGU lisusu na kati ya Nkamba na miso ya papa KISOLOKELE na papa DIALUNGANA na papa DIANGIENDA na papa KIANGANI na maman MARIE MWILU KIAWANGA NZITANI na papa HONORE NGBANDA na MFUMU ETO abengani HYPPOLITE KANAMBE abima na kongo alingi komona yete na kanda nionso pona abebisi mabele naye na kotangisa makila ya bana naye,lisusu pona na motema naye azali na makanisi ya satana ya kokabola mabele ya kongo ya papa kimbangu. papa KIMBANGU azui papa HONORE NGBANDA apesiye na maboko ya papa KIANGANI pona yende aponi abongisa kongo na lisusu atelemisa yango malamu na kotia yango kimia na nionso..4) le 24.1.2011 Bana nioso ya kongo ba sangani bakomi mutu moko na motema moko na papa HONORE NGBANDA nde baye kozua HYPPOLITE KANAMBE na OLIVE LEMBE babimisi bango na kongo bazongi na Rwanda. Sima bana ya kongo bazui papa HONORE NGBANDA bamemi ye na KIPOYI pona alongi etumba ya kongo ezui liberation. Eloko ezali kokanga pona kokende na KULUMBIMBI ezali liberation ya kongo. KULUMBIMBI ekosalema soki mupaya ya Rwandais ya HYPPOLITE KANAMBE atiki mabele ya kongo ya papa KIMBANGU azonga na mboka naye RWANDA,pona abomi mingi na kotangisa makila ya bana ya papa kimbangu,lisusu ye ayaki pona aluka akabola mabele ya papa KIMBANGU yango ezali mission ayelaki na mabele na biso..... lisusu nde tango wana papa KIANGANI akokutana na ROI DIVIN oyo akozala INCARNATION ya papa SIMON KIMBANGU. lisusu akoyamba maman MARIE MWILU KIAWANGA NZITANI na Nkamba.bato mibale oyo papa KIANGANI na mama SIDONIE bazali kozela bakokende na bango elongo na Mbanza Kongo pona likambo ya KULUMBIMBI sima ya liberation ya Kongo ya libela. 5) Ngai MFUMU ETO MVULUZI KIMBANGU le 20.5.2011 mokolo na zuaki Vision na kati ya ndoto kowuta na Nkamba na papa KIANGANI na kokende na Mbanza Kongo sima ya liberasion ya kongo wana kimia ekoti pona libela bolingo ekoti biso na biso na mitema ya bana ya papa KIMBANGU. 6) le 31.5.2011 tozui liberation ya kongo.kasi tozali kokita na Avion ya Aeroport ya Ndjili towuti na europe ngai MFUMU ETO MVULUZI KIMBANGU na maman MARIE MWILU KIAWANGA NZITANI na lisusu ba RESISTANTS ya Europe, nde toye kokutana na papa HONORE NGBANDA na maman MARIE JOSE LINGOMBA na KINSHASA KONGO. 7)le 21.11.2011 bana ya Kongo nionso batondi na Aeroport ya Ndjili na Kinshasa bazali kozela ROI DIVIN oyo Nzambe atindeli biso na mokili pona kongo na nzela ya papa SIMON KIMBANGU. makambo nionso asakolaki na europe pona kongo lelo nionso ekokisami yende Prophete ya solo na kombo ya MFUMU ETO MVULUZI KIMBANGU oyo biso tozali kozela ye 3 jours awa na Aeroport ya Ndjili, Ba maman bazali koloba solo azali mosali ya Nzambe ya monene ya mokili azali na bilembo ya Seigneur JESUS CHRIST naya Saint Esprit KIMBANGU na Nzoto naye azali envoye de Dieu ya solo.. pona kokende KULUMBIMBI esengeli bakoko nionso ya KIMBANGU esengeli bakoma eglise moko na Kintuadi basangana bomoko na kati ya Nkamba. lisusu mabele ya kongo esengeli ezua kimia muana ya kongo ya makila na loposo papa na maman bazala bakolo mabele wana akomi president pona tosepela na kombo ya HONORE NGBANDA ZAMBO. yende papa KIMBANGU na molimo aponi apesi ye na maboko ya MFUMU SIMON KIMBANGU KIANGANI na kati ya Nkamba abongisa na kotelemisa kongo na kitoko nionso.... ..youtube/watch?v=eoZXUerERjI&feature=share. Mfumu eto Mvuluzi Kimbangu signifie : Notre Roi,Notre Sauveur,celui qui révèle le sens des choses profondes et cachées;il connait ce qui est dans les ténebres,et la lumiere demeure en lui..
Posted on: Tue, 20 Aug 2013 21:46:13 +0000

Trending Topics



Recently Viewed Topics




© 2015