Molingami Kongo Kongo, nalobela yo lisusu nini? Mopepe mwa - TopicsExpress



          

Molingami Kongo Kongo, nalobela yo lisusu nini? Mopepe mwa liboso, soki yo te! Mayi ma yambo, soki yo te! Kwanga ya liboso, soki yo te! Mabele natambolaki mbala yambo, soki yo te! Okolisi ngai mpe oteyi ngai. Ozali nyonso koleka mpo na ngai. Mabele etika bankoko. Nini nakoki kobonzela yo? Nalingi yo makasi, Kongo na ngai. Kongo, mboka kitoko mpe biloko ebele! Ekolo epambolami na Nzambe. Bituka nyonso bomengo etonda. Miliki mpe nzoyi ekotanga meke. Bana Kongo tobosana bokabwani. Ezali tina enene koyingela kimya! Na makasi na biso totonga mboka. Totindika mayele nakotombola nkita ya ekolo. Tozala lisanga mpe bomoko. Bonsomi mpe bokasi bwa Kongo nde boye. Bien-aimé Congo Congo, que puis-je encore te dire? Mon premier souffle de vie, si ce n’est par toi! La première goutte d’eau ingurgitée, si ce n’est par toi! Le premier bout de manioc dégusté, si ce n’est par toi! Le premier sol foulé par mes pieds, si ce n’est le tien! Dans ton giron j’y ai grandi et tu m’as éduqué. Tu es plus que tout pour moi. Terre de mes ancêtres. Que puis-je te rendre en retour? Je t’aime d’un amour débordant, mon cher Congo. Congo, magnifique terre d’abondance! Pays gracieusement béni de Dieu. Où que l’on aille, des richesses à foison. Le lait et le miel y coulent généreusement. Congolais, oublions ce qui nous divise! Il est impératif de préserver la paix. Par notre force, bâtissons le pays! Mobilisons nos intelligences pour le progrès. Rassemblons nous et soyons résolument unis! On en fera ainsi un Congo libre et fort à jamais. René Mavoungou Pambou Bowamona Keb’Nitu
Posted on: Fri, 15 Nov 2013 04:59:36 +0000

Trending Topics



Recently Viewed Topics




© 2015